Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 21:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Mpe longola lisumu oyo atindaki Yuda básala na ndenge bazalaki kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova,+ Manase asopaki lisusu makila mingi mpenza ya bato oyo bazalaki na likambo te,+ kino atondisaki Yerusaleme banda nsuka tii nsuka.

  • 2 Bakonzi 23:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Atako bongo, Yehova atikaki te nkanda na ye makasi ya kongala, oyo engalelaki Yuda+ mpo na makambo ya kosilikisa oyo Manase atindaki bango básilikisa ye.+

  • 2 Ntango 33:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Nsukansuka, Yehova amemelaki bango+ bakonzi ya limpinga ya mokonzi ya Asiri,+ bongo bazwaki Manase na mabulu,+ mpe bakangaki+ ye na bikangeli mibale ya motako mpe bamemaki ye na Babilone.

  • 2 Ntango 33:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Mpe azalaki kobondela Ye, bongo Ye andimaki libondeli+ ya Manase mpe ayokaki lilɔmbɔ na ye mpo na kondimama mpe azongisaki ye na Yerusaleme na bokonzi na ye;+ mpe Manase ayaki koyeba ete Yehova azali Nzambe ya solo.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto