16 Lisusu, fɛti ya kobuka mbuma ya liboso oyo eteli+ ya misala na yo ya makasi, ya biloko oyo olonaki na elanga;+ mpe fɛti ya koyanganisa mbuma na nsuka ya mbula, ntango okoyanganisa mbuma ya misala na yo ya makasi na elanga.+
7 Na yango, Saulo alobaki na mosaleli na ye boye: “Bongo soki tokei, tokopesa moto yango eloko nini?+ Mpamba te mampa esili na bisika na biso ya kotyela biloko, mpe likabo+ ya kopesa moto wana ya Nzambe ya solo ezali te. Tozali na nini?”