Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 2:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Bongo azwaki elamba ya mosala ya Eliya, oyo elongwaki na ye ekwei, mpe abɛtaki mai+ mpe alobaki ete: “Wapi Yehova Nzambe ya Eliya, wapi Ye?”+ Ntango abɛtaki mai, ekabwanaki epai na epai, bongo Elisha akatisaki.

  • 2 Bakonzi 2:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Na yango, ye alobaki ete: “Bóyela ngai mwa kibakuli moko ya sika mpe bótya mungwa na kati.” Bongo bayelaki ye yango.

  • 2 Bakonzi 3:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 mpo talá oyo Yehova alobi: “Bokomona mopɛpɛ te, mpe bokomona mbula makasi te; atako bongo lobwaku ya mokɛli yango ekotonda na mai,+ mpe bokomɛla yango mpenza,+ bino, bibwɛlɛ na bino ná banyama na bino ya mboka.”’

  • 2 Bakonzi 4:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Mpe kende, omikanga na ndako, yo ná bana na yo, mpe sopá mafuta na kati ya bambɛki yango nyonso, mpe oyo etondi, tyá yango pembeni.”

  • 2 Bakonzi 5:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Na yango, akitaki mpe amizindisaki na Yordani mbala nsambo, ndenge moto ya Nzambe ya solo alobaki;+ nsima na yango, nzoto na ye ezongaki lokola nzoto ya mwana moke+ mpe akómaki pɛto.+

  • 2 Bakonzi 5:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Boye maba+ ya Naamane ekokangama na yo mpe na bana na yo mpo na ntango oyo etyami ndelo te.”+ Na mbala moko, alongwaki liboso na ye, akómi moto ya maba, mpɛmbɛ lokola nɛjɛ.+

  • 2 Bakonzi 6:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Na nsima, moto ya Nzambe ya solo alobaki boye: “Ekwei wapi?” Bongo alakisaki ye esika yango. Na mbala moko, akataki eteni ya nzete mpe abwakaki yango wana mpe atepisaki ebende yango ya sóka.+

  • 2 Bakonzi 7:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Bongo Elisha alobaki boye: “Bóyoka liloba ya Yehova.+ Talá oyo Yehova alobi: ‘Lobi, na ngonga oyo, sea moko ya farini ya malamu ekozala na ntalo ya shekele moko, mpe sea mibale ya ɔrje ekozala na ntalo ya shekele moko, na porte ya Samaria.’”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto