40 Mpe okobika na mopanga na yo,+ mpe okosalela ndeko na yo.+ Kasi ekosalema mpenza boye: ntango okokóma kotomboka, okobuka ekanganeli na ye na nkingo na yo.”+
14 Mpe atyaki bituluku ya basoda na Edome.+ Na Edome mobimba, atyaki bituluku ya basoda, mpe Baedome nyonso bakómaki basaleli ya Davidi;+ mpe Yehova azalaki se kobikisa Davidi na esika nyonso oyo azalaki kokende.+
9 Bongo mokonzi ya Yisraele, mokonzi ya Yuda ná mokonzi ya Edome+ bakendaki, mpe babalukaki na nzela ya pembenipembeni mikolo nsambo, kasi mai mpo na kaa mpe mpo na banyama ya mboka oyo ezalaki kolanda matambe na bango ezalaki kozwama te.