2 Bakonzi 7:20 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 20 Na yango, ekómelaki ye ndenge wana,+ ntango bato banyatanyataki+ ye na porte, bongo akufaki. Yisaya 25:10 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 10 Mpo lobɔkɔ ya Yehova ekokita na ngomba oyo,+ mpe Moabe ekonyatama mpenza+ na esika na yango lokola ntango banyataka libondo ya matiti na esika nyɛi ya nyama+ ezali. Malaki 4:3 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 3 “Mpe bokonyata mpenza bato mabe, mpo bakokóma lokola putulu na nse ya makolo na bino, na mokolo oyo ngai nakosala makambo,”+ Yehova ya mampinga alobi bongo. Baroma 16:20 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 20 Nsima ya mwa ntango moke, Nzambe oyo apesaka kimya+ akopanza Satana+ na nse ya makolo na bino. Boboto monene ya Nkolo na biso Yesu ezala na bino.+
10 Mpo lobɔkɔ ya Yehova ekokita na ngomba oyo,+ mpe Moabe ekonyatama mpenza+ na esika na yango lokola ntango banyataka libondo ya matiti na esika nyɛi ya nyama+ ezali.
3 “Mpe bokonyata mpenza bato mabe, mpo bakokóma lokola putulu na nse ya makolo na bino, na mokolo oyo ngai nakosala makambo,”+ Yehova ya mampinga alobi bongo.
20 Nsima ya mwa ntango moke, Nzambe oyo apesaka kimya+ akopanza Satana+ na nse ya makolo na bino. Boboto monene ya Nkolo na biso Yesu ezala na bino.+