Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 8:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpe alobaki boye: “Lotomo+ ya mokonzi oyo akoyangela bino ekozala boye: Akozwa bana na bino ya mibali+ mpe akokómisa bango bato na ye ya makalo+ mpe akokɔtisa bango na molɔngɔ ya basoda na ye oyo batambolaka na mpunda,+ mpe bamosusu bakopota mbangu liboso ya makalo na ye;+

  • 1 Samwele 22:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Na yango, mokonzi alobaki na bapoti-mbangu+ oyo batɛlɛmaki pene na ye ete: “Bóbaluka mpe bóboma banganga-nzambe ya Yehova, mpo lobɔkɔ na bango mpe ezali elongo na Davidi mpe mpo bayebaki ete azali kokima, kasi bayebisaki ngai yango na litoi te!”+ Kasi basaleli ya mokonzi baboyaki kosembola lobɔkɔ na bango mpo na kokwela banganga-nzambe ya Yehova.+

  • 2 Samwele 18:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Nde Ahimaaze+ mwana ya Zadoke alobaki ete: “Nabondeli yo, tiká napota mbangu, napesa mokonzi nsango, mpamba te Yehova akateli ye likambo mpo na kosikola ye na lobɔkɔ ya banguna na ye.”+

  • 1 Bakonzi 14:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Na yango, Mokonzi Rehoboame asalaki na esika na yango banguba ya motako, mpe apesaki yango na mabɔkɔ ya bakonzi ya bapoti-mbangu,+ bakɛngɛli ya monɔkɔ ya ndako ya mokonzi.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto