Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Balevi 20:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 “Okoloba na bana ya Yisraele boye: ‘Moto nyonso na kati na bana ya Yisraele, mpe mopaya nyonso oyo azali kofanda mopaya kati na Yisraele, oyo apesi Moleke+ moko ya bana na ye, asengeli kobomama mpenza. Bato ya mokili bakobamba ye mabanga kino akokufa.

  • Kolimbola Mibeko 18:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Epai na yo moto azwama te oyo azali kolekisa mwana na ye ya mobali to mwana na ye ya mwasi mbeka na mɔtɔ,+ moto oyo azali kosakola makambo oyo ebombaná,+ moto ya misala ya maji+ to moto oyo azali koluka bilembo ya makambo oyo ekoya+ to moto oyo azali nganga-nkisi,+

  • 2 Bakonzi 23:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Mpe akómisaki Tofete,+ oyo ezali na lobwaku ya bana ya Hinome,+ esika oyo ebongi te na losambo, mpo moto moko te alekisa mwana na ye ya mobali to mwana na ye ya mwasi mbeka na mɔtɔ+ mpo na Moleke.+

  • 2 Ntango 28:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe abimisaki milinga ya mbeka+ na lobwaku ya mwana ya Hinome+ mpe akómaki kotumba bana na ye+ na mɔtɔ, na kolanda makambo oyo eyinamá+ ya bikólo oyo Yehova abenganaki liboso ya bana ya Yisraele.+

  • 2 Ntango 33:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpe ye moko alekisaki bana na ye mbeka na mɔtɔ+ na lobwaku ya mwana ya Hinome,+ mpe asalaki misala ya maji+ mpe asalelaki misala ya kosakola makambo oyo ebombaná+ mpe asalaki misala ya bonganga-nkisi+ mpe atyaki bato oyo basololaka na bilimo+ ná bato oyo basalaka mosala ya kosakola makambo oyo ekoya.+ Asalaki makambo mingi mpenza ya mabe na miso ya Yehova, mpo na kosilikisa ye.+

  • Nzembo 106:37
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 37 Mpe bazalaki kokaba bana na bango ya mibali+

      Mpe bana na bango ya basi mbeka epai ya bademo.+

  • Yisaya 57:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 baoyo balamwisaka mposa makasi na banzete minene,+ na nse ya nzete nyonso oyo etondi na nkasa,+ bazali koboma bana na mabwaku ya mikɛli, na nse ya madusu ya mabanga, boye te?+

  • Yirimia 7:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Mpe batongi bisika oyo etombwaná ya Tofete,+ oyo ezali na lobwaku ya mwana ya Hinome,+ mpo na kotumba bana na bango ya mibali mpe bana na bango ya basi na mɔtɔ,+ likambo oyo napesaki mitindo te mpe oyo eyaki na kati ya motema na ngai te.’+

  • Ezekiele 16:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 “‘Mpe ozalaki kokamata bana na yo ya mibali mpe bana na yo ya basi oyo obotelaki ngai,+ mpe ozalaki kopesa bango mbeka epai ya bikeko yango mpo bályama+—misala na yo ya bondumba ekosuka te?

  • Ezekiele 23:37
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 37 Mpo basali ekobo+ mpe makila ezali na mabɔkɔ na bango,+ mpe basali ekobo na bikeko na bango ya bosɔtɔ.+ Mpe, longola yango, bana oyo babotelaki ngai, balekisi bango mbeka na mɔtɔ lokola bilei mpo na bikeko yango.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto