33 Bongo batambolaki mobembo ya mikolo misato banda na ngomba ya Yehova,+ mpe sanduku ya kondimana+ ya Yehova ezalaki kotambola liboso na bango mpo na mobembo ya mikolo misato mpo na kolukela bango esika ya kopema.+
17Mpe esalemaki boye: ntango kaka Davidi abandaki kofanda na ndako na ye moko,+ Davidi alobaki na mosakoli Natane+ boye: “Talá, ngai nafandi na ndako moko ya banzete ya sɛdrɛ,+ kasi sanduku+ ya kondimana ya Yehova ezali na kati ya hema.”+
4 Ezalaki na eloko ya kotumba mpaka ya malasi oyo esalemi na wolo+ ná sanduku ya kondimana+ oyo ezipamá mobimba na wolo,+ oyo ezalaki na elokó ya wolo oyo ezalaki na mana+ ná lingenda ya Arona oyo ebimisaki fololo+ ná bitanda+ ya kondimana na kati;