5 ngai nakotya kiti ya bokonzi na yo likoló ya Yisraele mpo na ntango oyo etyami ndelo te, kaka ndenge napesaki tata na yo Davidi elaka ete: ‘Moto ya libota na yo akozanga te na kiti ya bokonzi ya Yisraele.’+
5 mpe na bana na ngai nyonso (mpo bana oyo Yehova apesi ngai bazali mingi)+ ayei kopona mwana na ngai Salomo+ mpo afanda na kiti ya bokonzi+ ya Yehova na Yisraele.
5 “Talá! Mikolo ezali koya,” yango nde liloba ya Yehova, “mpe nakotɛlɛmisela Davidi etape ya boyengebene.+ Mpe mokonzi moko akoyangela mpenza+ mpe akosala na bokɛngi mpe akokata makambo na bosembo mpe na boyengebene na mokili.+