-
1 Ntango 25:1Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
25 Lisusu, Davidi ná bakapita+ ya bituluku ya mosala+ batyaki pembeni bana mosusu ya Asafe, ya Hemane+ mpe ya Yedutune+ mpo na kosala mosala, bango bazalaki kosakola na banzɛnzɛ,+ na bibɛtɛlo ya bansinga+ mpe na basɛmbalɛ.+ Mpe bato oyo bapesamaki mikumba mpo na mosala na bango bazwamaki na kati na bango.
-
-
2 Ntango 5:12Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
12 mpe Balevi+ oyo bazalaki bayembi na bango nyonso, elingi koloba, ya Asafe,+ ya Hemane,+ ya Yedutune+ mpe ya bana na bango mpe ya bandeko na bango oyo balati elamba ya kitoko, ná basɛmbalɛ,+ bibɛtɛlo ya bansinga+ ná banzɛnzɛ,+ batɛlɛmaki na ɛsti ya etumbelo mpe elongo na bango, banganga-nzambe nkama moko na ntuku mibale (120), bazalaki kobɛta kelelo;+
-