-
Nzembo 42:maloba ya ebandeli ya loyembo-11Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
Epai ya mokambi ya nzembo. Maskile mpo na bana ya Kora.+
42 Lokola nyama ebengami bishe oyo ezali na mposa makasi ya mikɛli ya mai,
Molimo na ngai ezali na mposa na yo makasi, Ee Nzambe.+
2 Molimo na ngai ezali mpenza na mposa ya Nzambe,+ ya Nzambe ya bomoi.+
Ntango nini nakoya mpe komonana liboso ya Nzambe?+
3 Mpisoli na ngai ekómi bilei na ngai butu moi,+
Wana bazali koloba na ngai mokolo mobimba ete: “Nzambe na yo azali wapi?”+
4 Nakokanisa makambo oyo, mpe nakosopa molimo na ngai na kati na ngai.+
Mpo namesanaki koleka elongo na ebele ya bato,
Namesanaki kotambola malɛmbɛ liboso na bango mpo na kokende na ndako ya Nzambe,+
Na mongongo ya koganga ya esengo mpe na matɔndi,+
Ya ebele ya bato oyo bazali kosala fɛti.+
5 Ee molimo na ngai, mpo na nini ozangi elikya,+
Mpo na nini ozali kosala yikiyiki na kati na ngai?+
Zelá Nzambe,+
Mpo nakokumisa ye lisusu, azali lobiko monene na ngai.+
6 Ee Nzambe na ngai, na kati na ngai molimo na ngai ezangi elikya.+
Yango wana nazali kokanisa yo,+
Banda na mokili ya Yordani mpe na bansɔngɛ ya Heremone,+
Banda na ngomba moke.+
7 Mai mozindo ezali kobenga mai mozindo
Na lokito ya mai na yo oyo ezali komibwaka.
Mbonge na yo nyonso ya makasi oyo epanzanaka mpe mbonge na yo+—
Eleki likoló na ngai.+
8 Na moi Yehova akopesa motema boboto na ye mitindo,+
Mpe na butu loyembo na ye ekozala elongo na ngai;+
Libondeli ekopesama epai ya Nzambe ya bomoi na ngai.+
9 Nakoloba na Nzambe libanga na ngai+ ete:
“Mpo na nini obosani ngai?+
Mpo na nini nazali kotambola mawamawa mpo na monyoko ya monguna?”+
-