Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 6:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Mpe bana mibali ya Kora bango oyo: Asire ná Elekana mpe Abiasafe.+ Wana nde mabota ya Bakora.+

  • Mitángo 26:58
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 58 Mabota ya Balevi yango oyo: libota ya Balibini,+ libota ya Bahebrone,+ libota ya Bamaheli,+ libota ya Bamushi,+ libota ya Bakora.+

      Mpe Kohate+ abotaki Amirame.+

  • Nzembo 42:maloba ya ebandeli ya loyembo-11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • Epai ya mokambi ya nzembo. Maskile mpo na bana ya Kora.+

      42 Lokola nyama ebengami bishe oyo ezali na mposa makasi ya mikɛli ya mai,

      Molimo na ngai ezali na mposa na yo makasi, Ee Nzambe.+

       2 Molimo na ngai ezali mpenza na mposa ya Nzambe,+ ya Nzambe ya bomoi.+

      Ntango nini nakoya mpe komonana liboso ya Nzambe?+

       3 Mpisoli na ngai ekómi bilei na ngai butu moi,+

      Wana bazali koloba na ngai mokolo mobimba ete: “Nzambe na yo azali wapi?”+

       4 Nakokanisa makambo oyo, mpe nakosopa molimo na ngai na kati na ngai.+

      Mpo namesanaki koleka elongo na ebele ya bato,

      Namesanaki kotambola malɛmbɛ liboso na bango mpo na kokende na ndako ya Nzambe,+

      Na mongongo ya koganga ya esengo mpe na matɔndi,+

      Ya ebele ya bato oyo bazali kosala fɛti.+

       5 Ee molimo na ngai, mpo na nini ozangi elikya,+

      Mpo na nini ozali kosala yikiyiki na kati na ngai?+

      Zelá Nzambe,+

      Mpo nakokumisa ye lisusu, azali lobiko monene na ngai.+

       6 Ee Nzambe na ngai, na kati na ngai molimo na ngai ezangi elikya.+

      Yango wana nazali kokanisa yo,+

      Banda na mokili ya Yordani mpe na bansɔngɛ ya Heremone,+

      Banda na ngomba moke.+

       7 Mai mozindo ezali kobenga mai mozindo

      Na lokito ya mai na yo oyo ezali komibwaka.

      Mbonge na yo nyonso ya makasi oyo epanzanaka mpe mbonge na yo+—

      Eleki likoló na ngai.+

       8 Na moi Yehova akopesa motema boboto na ye mitindo,+

      Mpe na butu loyembo na ye ekozala elongo na ngai;+

      Libondeli ekopesama epai ya Nzambe ya bomoi na ngai.+

       9 Nakoloba na Nzambe libanga na ngai+ ete:

      “Mpo na nini obosani ngai?+

      Mpo na nini nazali kotambola mawamawa mpo na monyoko ya monguna?”+

      10 Baoyo bazali banguna na ngai basambwisi ngai na ndenge babomi mikuwa na ngai,+

      Wana bazali koloba na ngai mokolo mobimba ete: “Nzambe na yo azali wapi?”+

      11 Ee molimo na ngai, mpo na nini ozangi elikya,+

      Mpe mpo na nini ozali kosala yikiyiki na kati na ngai?+

      Zelá Nzambe,+

      Mpo nakokumisa ye lisusu, azali lobiko monene na ngai mpe azali Nzambe na ngai.+

  • Nzembo 45:maloba ya ebandeli ya loyembo-17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • Epai ya mokambi ya nzembo ya Bafololo lísi. Ya bana ya Kora. Maskile. Loyembo ya basi ya bolingo.

      45 Motema na ngai ekómi koningana mpo na likambo moko ya malamu.+

      Nazali koloba ete: “Misala na ngai etali mokonzi moko.”+

      Lolemo na ngai ezala ekomeli+ ya mosali-bakopi oyo ayebi mosala malamu.+

       2 Ozali mpenza kitoko mingi koleka bana ya bato.+

      Mbɛbu na yo ezali kosopa maloba ya elɛngi.+

      Yango wana Nzambe apamboli yo mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+

       3 Ee moto ya nguya,+ kangá mopanga+ na yo na loketo, na ebɛlɔ na yo,

      Ná lokumu na yo mpe nkembo na yo.+

       4 Mpe na nkembo na yo kende kolonga;+

      Matá na mpunda mpo na kobundela solo, komikitisa ná boyengebene,+

      Mpe lobɔkɔ na yo ya mobali ekoteya yo makambo ya nsɔmɔ.+

       5 Makula na yo epeli makasi, ekokɔta na motema ya banguna ya mokonzi,+

      Bato ya bikólo bazali kaka kokwea na nse na yo.+

       6 Nzambe azali kiti na yo ya bokonzi mpo na ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ mpo na seko;+

      Lingenda ya bokonzi na yo ezali lingenda ya bosembo.+

       7 Olingi boyengebene+ mpe oyini makambo ya mabe.+

      Yango wana Nzambe, Nzambe na yo,+ atye yo mafuta+ ya esengo+ koleka baninga na yo.+

       8 Bilamba na yo nyonso ezali malasi ya mire, nzete ya aloe ná kasia;+

      Longwa na ndako monene ya kitoko, ya mpɛmbɛ ya nzoku,+ bibɛtɛlo oyo ya bansinga esepelisi yo.

       9 Bana basi+ ya bakonzi bazali na kati ya basi na yo ya bolingo.

      Mwasi ya mokonzi+ atɛlɛmi na lobɔkɔ na yo ya mobali, alati wolo ya Ofire.+

      10 Yoká, Ee mwana mwasi, mpe talá, mpe sembolá litoi na yo;

      Mpe bosaná bato na yo mpe ndako ya tata na yo.+

      11 Mpe mokonzi akoyoka kitoko na yo mposa,+

      Mpo ye azali nkolo na yo,+

      Na yango, gumbamelá ye.+

      12 Mwana mwasi ya Tire azali wana mpe na likabo+—​

      Bato ya bozwi na kati ya bato bakokitisa yo motema.+

      13 Mwana mwasi ya mokonzi azali na nkembo mingi na kati ya ndako;+

      Bilamba na ye etyami biloko ya wolo.

      14 Bakoya na ye epai ya mokonzi na molato oyo elitamá.+

      Bangɔndɔ oyo bazali baninga na ye, oyo bazali kolanda ye na nsima, bazali kokɔtisama epai na yo.+

      15 Bakoya na bango na nsai mpe na esengo;

      Bakokɔta na ndako monene ya mokonzi.

      16 Na esika ya bankɔkɔ na yo+ ekozala bana na yo,+

      Oyo okotya bango bankumu na mabele mobimba.+

      17 Nakotánga nkombo na yo na boumeli ya mabota nyonso oyo ekoya.+

      Yango wana bato ya bikólo bakokumisa yo mpo na ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ mpo na seko.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto