Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 9:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Mpe azalaki na mwana mobali moko, nkombo na ye Saulo,+ azalaki elenge mpe kitoko, mpe mobali moko te na bana ya Yisraele alekaki ye na kitoko; banda na mapeka tii likoló, alekaki bato nyonso na molai.+

  • 1 Samwele 10:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpe esalemaki boye: ntango bato nyonso oyo bayebaki ye liboso bamonaki ye, talá! azali kosakola elongo na basakoli. Na yango, bato balobanaki ete: “Likambo nini ekómeli mwana ya Kishe? Saulo azalaka mpe moko ya basakoli?”+

  • 1 Samwele 11:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Na yango, bato nyonso ya ekólo bakendaki na Gilgale, mpe kuna, batyaki Saulo mokonzi liboso ya Yehova, na Gilgale. Na nsima, bapesaki bambeka ya boyokani kuna, liboso ya Yehova,+ mpe kuna, Saulo ná mibali nyonso ya Yisraele bakobaki kosepela makasi mpenza.+

  • 1 Samwele 14:47
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 47 Mpe Saulo azwaki bokonzi na Yisraele+ mpe akendaki kobunda na banguna na ye nyonso epai na epai, abundaki na Moabe,+ bana ya Amone,+ Edome,+ bakonzi ya Soba+ mpe Bafilistia;+ mpe esika nyonso oyo azalaki kobaluka, azalaki kopesa bango bitumbu.+

  • 1 Samwele 15:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 mpo botomboki+ ezali ndenge moko na lisumu ya kosakola makambo oyo ebombaná,+ mpe kokende liboso na lofundo ezali ndenge moko na kosala makambo ya maji mpe kosambela bikeko.*+ Lokola oboyi liloba ya Yehova,+ ye mpe aboyi yo ozala mokonzi.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto