Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Balevi 19:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 “‘Bóbaluka te mpo na kokende epai ya bato oyo basololaka na bilimo,+ mpe bótuna te bato oyo basalaka mosala ya kosakola makambo ekoya,+ noki bákómisa bino mbindo. Ngai nazali Yehova Nzambe na bino.

  • Balevi 20:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 “‘Bongo molimo oyo abaluki mpo na kokende epai ya bato oyo basololaka na bilimo+ mpe epai ya bato oyo basalaka mosala ya kosakola makambo ekoya+ mpo na kosala na bango pite, nakotɛmɛla mpenza molimo yango mpe nakolongola ye kati na bato na ye.+

  • 1 Samwele 28:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Nsukansuka, Saulo alobaki na basaleli na ye boye: “Bólukela ngai mwasi moko oyo azali nganga-nkisi,+ oyo azali na nguya ya kosolola na bilimo, mpe nakokende epai na ye mpe nakotuna ye.” Bongo basaleli na ye balobaki na ye ete: “Talá! Mwasi moko oyo azali nganga-nkisi azali na Ene-dore, azali na nguya ya kosolola na bilimo.”+

  • Yisaya 8:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Mpe soki balobi na bino: “Bótuna bato oyo basololaka na bilimo+ to baoyo bazali na elimo ya koyebisa makambo oyo ekoya, baoyo bazali koloba swiswiswi+ mpe na mingongo ya nse,” bato na bato basengeli nde kotuna Nzambe na bango te?+ Basengeli nde kotunela bato ya bomoi makambo epai na bakufi?+

  • Misala 16:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Mpe esalemaki ete ntango tozalaki kokende na esika ya mabondeli, mwana mwasi moko ya mosala oyo azalaki na elimo moko,+ demo moko ya kosakola makambo oyo ebombaná,+ akutanaki na biso. Azalaki kokɔtisela bankolo na ye mosolo mingi+ na mosala ya kosakola makambo oyo ekoya.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto