6 Na yango, mokonzi ná bato na ye bakendaki na Yerusaleme mpo na kobunda na Bayebusi+ oyo bazalaki kofanda na mokili yango, mpe bato yango balobaki na Davidi: “Okokɔta awa te, kasi bato oyo bakufá miso mpe batɛngumi bakobengana yo,”+ mpo makanisi na bango ezalaki: “Davidi akokɔta awa te.”