9 Mpo na nini otyoli liloba ya Yehova mpe osali oyo ezali mabe+ na miso na ye? Obomi Uria Mohiti na mopanga+ mpe mwasi na ye, okómisi ye mwasi na yo,+ mpe obomi mobali na ye na mopanga ya bana ya Amone.
5 mpamba te Davidi asalaki oyo ezali sembo na miso ya Yehova, mpe mikolo nyonso ya bomoi na ye,+ apɛngwaki na eloko moko te oyo Ye apesaki ye mitindo, longola kaka na likambo ya Uriya Mohiti.+