33 Mpe osengeli kotya rido na nse ya bakroshɛ mpe kokɔtisa sanduku ya litatoli+ kuna na nsima ya rido; mpe rido yango esengeli kokabola mpo na bino Esika Mosantu+ mpe Esika oyo Eleki Bosantu.+
6 Bongo banganga-nzambe bakɔtisaki sanduku+ ya kondimana ya Yehova na esika na yango,+ na shambrɛ ya kati mpenza ya ndako, Esika Oyo Eleki Bosantu, na nse ya mapapu ya bakeruba.+
24 Mpo Kristo akɔtaki, na esika mosantu oyo esalemi na mabɔkɔ te,+ oyo ezali elilingi ya makambo ya solo,+ kasi nde na likoló mpenza,+ mpo amonana sikoyo liboso ya Nzambe mpenza mpo na biso.+