Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 6:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Bosengeli kolanda banzambe mosusu te, banzambe nyonso ya bato ya bikólo oyo bazali zingazinga na bino,+

  • Kolimbola Mibeko 31:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Sikoyo Yehova alobaki na Moize ete: “Talá! Ozali kolala esika moko na bankɔkɔ na yo;+ mpe bato oyo bakotɛlɛma+ mpenza mpe bakosala pite na banzambe ya bapaya ya mokili epai bazali kokende,+ na kati na bango, mpe bakobosana ngai+ mpenza mpe bakobuka kondimana na ngai oyo nasalaki ná bango.+

  • 2 Ntango 15:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Yango wana abimaki, ayaki liboso ya Asa mpe alobaki na ye boye: “Bóyoka ngai, Ee Asa mpe Yuda mobimba ná Benyamina! Yehova azali elongo na bino ntango nyonso oyo bozali na ye;+ mpe soki boluki+ ye, akotika bómona ye, kasi soki botiki ye, akotika bino.+

  • Nzembo 73:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Mpo talá! bato oyo bazali mosika na yo bakokufa.+

      Okokanga mpenza monɔkɔ ya moto nyonso oyo azali kotika yo mpo asali pite.+

  • Yisaya 1:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Mpe batomboki ná bato ya masumu bakokwea bango nyonso na mbala moko,+ mpe baoyo bazali kotika Yehova bakosila.+

  • Yirimia 2:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Mabe na yo esengeli kosembola yo,+ mpe misala na yo ya kozanga bosembo esengeli kopamela yo.+ Boye yebá mpe moná ete kotika oyo otiki Yehova Nzambe na yo ezali likambo moko ya mabe mpe ya bololo,+ mpe yango epesi yo nsɔmɔ na ngai ata moke te,’+ yango nde liloba ya Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso,+ Yehova ya mampinga.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto