18 Mpe osengeli kokanisa Yehova Nzambe na yo, mpamba te ye moto apesi yo nguya ya kozwa bomɛngo;+ mpo na kokokisa kondimana na ye oyo alapelaki bankɔkɔ na yo ndai, lokola na mokolo ya lelo.+
12 Bomɛngo+ mpe nkembo+ eutaka na yo, mpe ozali koyangela+ eloko nyonso; mpe makasi+ ná nguya+ ezali na lobɔkɔ na yo, mpe likoki ya kokómisa moto nyonso monene+ ná makasi ezali na lobɔkɔ na yo.+
9 Na yango, Amazia+ alobaki na moto ya Nzambe ya solo ete: “Bongo nasala nini mpo na talanta nkama moko (100) oyo napesi bituluku ya basoda ya Yisraele?”+ Bongo moto ya Nzambe ya solo alobaki boye: “Yehova azali na makoki ya kopesa yo mingi koleka oyo wana.”+