7 Kasi Yehova alobaki na Samwele ete: “Kotala elongi na ye te mpe bolai na ye te,+ mpo ngai naboyi ye. Mpo Nzambe amonaka ndenge moto amonaka te,+ mpamba te moto amonaka oyo emonanaka na miso;+ kasi Yehova, amonaka ndenge motema+ ezali.”
39 yo yoká kuna na likoló,+ esika na yo ya kofanda ya libela,+ mpe limbisá+ mpe salá+ mpe pesá moto na moto na kolanda banzela na ye nyonso,+ mpo oyebi motema+ na ye (mpamba te kaka yo moko nde oyebi malamu motema ya bana nyonso ya bato);+
10 Ngai, Yehova, nalukalukaka na kati ya motema+ mpe natalatalaka bangɛi,+ ɛɛ mpo na kopesa moto na moto ndenge banzela na ye ezali,+ ndenge mbuma ya misala na ye ezali.+