30 Mpe osengeli kotya Urime+ ná Tumime na kati ya libenga ya ntolo mpo na kosambisa, mpe yango esengeli kozala likoló ya motema ya Arona ntango akokɔta liboso ya Yehova; mpe Arona asengeli komema bikateli ya lisambisi+ ya bana ya Yisraele likoló ya motema na ye liboso ya Yehova ntango nyonso.
21 Mpe liboso ya Eleazare nde akotɛlɛma, mpe asengeli kotunela+ ye ndenge Urime+ ekokata likambo liboso ya Yehova. Na etinda na ye bakobima mpe na etinda na ye bakokɔta, ye ná bana nyonso ya Yisraele elongo na ye mpe liyangani mobimba.”