-
Ezera 3:8Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
8 Mpe na mbula ya mibale ya kokóma na bango na ndako ya Nzambe ya solo na Yerusaleme, na sanza ya mibale,+ Zerubabele+ mwana ya Shealatiele+ ná Yeshua+ mwana ya Yehozadake mpe bandeko na bango mosusu, banganga-nzambe ná Balevi, mpe baoyo nyonso bautaki na bokangami+ mpo na kokende na Yerusaleme babandaki mosala; mpe sikoyo batyaki Balevi+ bakambi ya mosala ya ndako ya Yehova,+ banda na baoyo bazalaki na mbula ntuku mibale (20) tii na likoló.
-
-
Hagai 2:4Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
4 “‘Kasi sikoyo, Ee Zerubabele, zalá makasi,’ yango nde liloba ya Yehova, ‘mpe zalá makasi,+ Ee Yosua mwana ya Yehozadake nganga-nzambe monene.’
“‘Mpe bino nyonso bato ya mboka oyo, bózala makasi mpe bósala mosala,’+ yango nde liloba ya Yehova.
“‘Mpo nazali elongo na bino,’+ yango nde liloba ya Yehova ya mampinga.
-