16 Bongo ekosɛnga ozwa bana basi na bango mosusu mpo na bana na yo ya mibali,+ mpe ya solo bana na bango ya basi bakosala pite na banzambe na bango mpe bakosala ete bana na yo ya mibali básala pite na banzambe na bango.+
3 Mpe osengeli kosala kondimana ata moko te ya libala ná bango. Osengeli te kopesa mwana na yo ya mwasi na mwana na ye ya mobali, mpe osengeli te kozwa mwana na ye ya mwasi mpo na mwana na yo ya mobali.+
12 “Kasi soki bomeki kozonga nsima+ mpe kokangama na bato ya bikólo yango, oyo batikali,+ oyo bafandi esika moko na bino, mpe soki bosali kondimana ya libala+ elongo na bango mpe soki bokɔti na kati na bango, mpe bango na kati na bino,