4 Lisusu bayaki koyangana epai na ngai, moto nyonso azalaki kolɛnga+ mpo na maloba ya Nzambe ya Yisraele mpo na kozanga bosembo ya bato oyo bamemamaki na mboka mopaya, wana nafandaki kaka na kokamwa tii na ntango ya likabo ya mbuma ya mpokwa.+
2 “Kutu biloko oyo nyonso, lobɔkɔ na ngai nde esalá yango, bongo yango nyonso ebimaki,”+ yango nde liloba ya Yehova. “Yango wana, nakotala nde moto oyo: moto ya mpasi mpe oyo elimo na ye ezali na mawa+ mpe oyo azali kolɛnga mpo na liloba na ngai.+