Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mitángo 14:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Likambo moko kaka, bótombokela Yehova te;+ mpe bino, bóbanga bato ya mokili yango te,+ mpo bazali lokola limpa na miso na biso. Bisika na bango ya komibatela ekimi bango,+ mpe Yehova azali elongo na biso.+ Bóbanga bango te.”+

  • Kolimbola Mibeko 20:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe asengeli koloba na bango ete: ‘Yoká, Ee Yisraele, bozali kobɛlɛma lelo na etumba mpo na kobunda na banguna na bino. Mitema na bino ebangabanga te.+ Bóbanga te mpe bókima na nsɔmɔ te mpe bólɛnga mpo na bango te,+

  • Yosua 1:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Napesi yo mitindo te?+ Zalá na mpiko mpe zalá na makasi. Kolɛnga te mpe kozala na nsɔmɔ te,+ mpo Yehova Nzambe na yo azali na yo epai nyonso okokende.”+

  • Nzembo 27:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Yehova azali pole+ na ngai mpe lobiko na ngai.+

      Nakobanga nani?+

      Yehova azali esika makasi ya libateli ya bomoi na ngai.+

      Nakozala na nsɔmɔ ya nani?+

  • Baroma 8:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Bongo tokoloba nini na makambo yango? Soki Nzambe azali mpo na biso, nani akosala biso mabe?+

  • Baebre 13:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Bomoi na bino ezala na bolingo ya mbongo te,+ bósepela+ na biloko oyo bozali na yango sikoyo.+ Mpo alobaki ete: “Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto