-
Nehemia 5:15Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
15 Kasi baguvɛrnɛrɛ ya kala oyo bazalaki liboso na ngai, bakómiselaki yango bato kilo, mpe mokolo na mokolo bazalaki kokamata epai na bango shekele ya palata ntuku minei (40) mpo na mampa mpe vinyo. Lisusu, basaleli na bango bazalaki kokonza bato.+ Kasi ngai, nasalaki bongo te+ mpo na kobanga Nzambe.+
-
-
Malaki 1:6Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
6 “‘Mwana akumisaka tata;+ mpe mosaleli akumisaka nkolo na ye monene.+ Bongo soki ngai nazali tata,+ wapi lokumu oyo bosengeli kopesa ngai?+ Mpe soki nazali Nkolo Monene, wapi bobangi+ oyo bosengeli kobanga ngai?’ Yehova ya mampinga alobi na bino bongo, Ee banganga-nzambe, bino baoyo bozali kotyola nkombo na ngai.+
“‘Mpe bino bolobi ete: “Totyoli nkombo na yo na ndenge nini?”’
-