Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nehemia 5:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Mpe nalobaki lisusu ete: “Likambo oyo bozali kosala ezali malamu te.+ Bosengeli kotambola na kobanga+ Nzambe na biso,+ noki bikólo, banguna+ na biso, báyokisa biso nsɔni,+ boye te?

  • Nzembo 112:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 112 Bósanzola Yehova!+

      א [ʼAlef]

      Esengo na moto oyo azali kobanga Yehova,+

      ב [Bet]

      Oyo asepeli mingi+ na mitindo na ye.+

  • Nzembo 147:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Yehova asepelaka na baoyo bazali kobanga ye,+

      Na baoyo bazali kozela motema boboto na ye.+

  • Masese 16:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Na motema boboto mpe na bosolo nde bazipaka masumu mpo na libunga,+ mpe na kobanga Yehova nde moto alongwaka na mabe.+

  • Mosakoli 12:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Nsuka ya likambo, yango oyo, nsima ya koyoka makambo nyonso: Bangá Nzambe ya solo+ mpe batelá mitindo na ye.+ Mpo yango nde mokumba nyonso ya moto.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto