16 Mpe na mokolo ya liboso bokosala liyangani mosantu, mpe na mokolo ya nsambo liyangani mosantu.+ Mosala moko ekosalema te na mikolo yango.+ Kaka eloko oyo molimo nyonso esengeli kolya, yango kaka nde bokosala.+
29“‘Mpe na sanza ya nsambo, na mokolo ya liboso ya sanza yango, bokosala liyangani moko mosantu.+ Bosengeli kosala mosala ya makasi ata moko te.+ Ekozala mpo na bino mokolo ya kobɛtama ya kelelo.+
12 “‘Mpe na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya nsambo,+ bokosala liyangani moko mosantu.+ Bosengeli kosala mosala ya makasi ata moko te,+ mpe bosengeli kosala fɛti mpo na Yehova mikolo nsambo.+