3 Yehova Nzambe na yo mpe akozongisa bato na yo oyo bakangami+ mpe akoyokela yo mawa+ mpe akoyanganisa yo lisusu longwa na bato ya bikólo nyonso epai Yehova Nzambe na yo apalanganisá yo.+
8 “Nabondeli yo, kanisá+ liloba oyo opesaki Moize mosaleli na yo mitindo ete: ‘Soki bino, ɛɛ bino, bozangi bosembo, ngai, ɛɛ ngai, nakopalanganisa bino na kati ya bato ya bikólo.+
17 “Yisraele azali mpate oyo epanzami.+ Bankɔsi bapalanganisi ye.+ Na mbala ya liboso mokonzi ya Asiri alyaki ye,+ mpe na mbala oyo ya nsima Nebukadrezare mokonzi ya Babilone abukibuki mikuwa na ye.+
14 ‘Mpe nabwakaki bango na mopɛpɛ makasi na bikólo+ nyonso oyo bango bayebaki te;+ mpe mokili yango moko etikalaki mpamba na nsima na bango, moto azalaki koleka wana te mpe moto azalaki kozonga wana te;+ mpe bakómisaki mokili yango ya kitoko+ eloko ya kokamwa.’”