Yirimia 23:1 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 23 “Mawa na babateli ya mpate oyo bazali kobebisa mpe kopalanganisa bampate ya esika na ngai ya koleisa bibwɛlɛ matiti!”+ yango nde liloba ya Yehova. Yirimia 50:6 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 6 Bato na ngai bakómi etonga ya bampate oyo ezali kokufa.+ Babateli na bango batiki bango báyengayenga.+ Bamemi bango likoló ya bangomba.+ Bauti na ngomba, bakei na ngomba moke. Babosani esika na bango ya kopema.+ Ezekiele 34:5 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 5 Mpe nsukansuka, epalanganaki mpo mobateli ya mpate azalaki te,+ bongo ekómaki bilei mpo na nyama nyonso ya zamba oyo efandaka na esobe, mpe ezalaki se kopalangana.+ Matai 9:36 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 36 Ntango amonaki ebele ya bato yango ayokelaki bango mawa,+ mpo banyokwamaki* mpe basundolamaki lokola bampate oyo ezangá mobateli.+
23 “Mawa na babateli ya mpate oyo bazali kobebisa mpe kopalanganisa bampate ya esika na ngai ya koleisa bibwɛlɛ matiti!”+ yango nde liloba ya Yehova.
6 Bato na ngai bakómi etonga ya bampate oyo ezali kokufa.+ Babateli na bango batiki bango báyengayenga.+ Bamemi bango likoló ya bangomba.+ Bauti na ngomba, bakei na ngomba moke. Babosani esika na bango ya kopema.+
5 Mpe nsukansuka, epalanganaki mpo mobateli ya mpate azalaki te,+ bongo ekómaki bilei mpo na nyama nyonso ya zamba oyo efandaka na esobe, mpe ezalaki se kopalangana.+
36 Ntango amonaki ebele ya bato yango ayokelaki bango mawa,+ mpo banyokwamaki* mpe basundolamaki lokola bampate oyo ezangá mobateli.+