Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 6:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 bana ya Nzambe ya solo+ babandaki kotala+ bana basi ya bato, bamonaki ete bazali kitoko; mpe babandaki kozwa basi, elingi koloba, nyonso oyo bango baponaki.

  • 1 Bakonzi 22:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Mpe alobaki lisusu: “Boye yoká liloba ya Yehova:+ Ya solo, nazali komona Yehova afandi na kiti na ye ya bokonzi+ mpe limpinga mobimba ya likoló etɛlɛmi pene na ye, na lobɔkɔ na ye ya mobali mpe na lobɔkɔ na ye ya mwasi.+

  • Yobo 1:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Nzokande, mokolo oyo bana ya Nzambe ya solo+ bakɔtaki mpo na kotɛlɛma liboso ya Yehova+ ekómaki, Satana+ mpe akɔtaki elongo na bango.+

  • Yobo 2:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Nsima na yango, mokolo oyo bana ya Nzambe ya solo bakɔtaki mpo na kotɛlɛma liboso ya Yehova ekómaki, Satana mpe akɔtaki elongo na bango mpo na kotɛlɛma liboso ya Yehova.+

  • Nzembo 89:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  6 Mpo nani akokani na Yehova na likoló oyo etondi na mapata?+

      Nani na bana ya Nzambe+ akoki kokokana na Yehova?

  • Nzembo 104:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  4 Azali kosala baanzelu na ye bilimo,+

      Basaleli na ye mɔtɔ ya kozikisa.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto