13 “Nazalaki se kotala na bimonaneli ya butu, mpe talá! moto moko lokola mwana ya moto+ azalaki koya na mapata+ ya likoló; mpe balekisaki ye epai ya Mokóló na Mikolo,+ mpe babɛlɛmisaki ye liboso na Oyo wana.+
10 Bókeba, bótyola moko ya bana mike oyo te; mpo nazali koyebisa bino ete baanzelu na bango+ na likoló bazali ntango nyonso kotala elongi ya Tata na ngai oyo azali na likoló.+