Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mosakoli 3:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Mpo bana ya bato bazali na nsuka mpe nyama ezali na nsuka, mpe bakosuka ndenge moko.+ Ndenge oyo akufaka, oyo mosusu mpe akufaka;+ mpe bango nyonso bazali na elimo kaka moko,+ yango wana moto aleki nyama te, mpo nyonso ezali mpamba.

  • 2 Petro 2:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Kasi bato wana, na makambo oyo bayebi te mpe bazali kofinga,+ bakobebisama na nzela na bango oyo ezali kokende na libebi, lokola banyama oyo bazangá mayele oyo babotamaka kaka mpo bákangama mpe bábomama,

  • Nzembo 50:maloba ya ebandeli ya loyembo-23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • Mondule ya Asafe.+

      50 Nzambe,+ Nzambe, Yehova,+ alobi ye moko,+

      Mpe abandi kobenga mabele,+

      Banda epai moi ebimaka kino epai yango elalaka.+

       2 Longwa na Siona, kitoko ya kokoka,+ Nzambe ye moko angɛngi.+

       3 Nzambe na biso akoya mpe akokoka kofanda nyɛɛ te.+

      Liboso na ye mɔtɔ ezali kozikisa,+

      Mpe mopɛpɛ moko makasi koleka ezalaki zingazinga na ye.+

       4 Azali kobenga likoló kuna mpe mabele+

      Mpo na kosambisa bato na ye:+

       5 “Bóyanganisa epai na ngai bato na ngai ya sembo,+

      Baoyo bazali kosala kondimana na ngai na nzela ya mbeka.”+

       6 Mpe likoló ezali koyebisa boyengebene na ye,+

      Mpo Nzambe ye moko azali Mosambisi.+ Sela.

       7 “Yoká, Ee ekólo na ngai, mpe nakoloba,+

      Ee Yisraele, mpe nakotatwela yo.+

      Ngai nazali Nzambe, Nzambe na yo.+

       8 Nazali kopamela yo mpo na bambeka na yo te,+

      Mpe mpo na makabo na yo ya kotumba mobimba oyo ezali liboso na ngai ntango nyonso te.+

       9 Nakozwa ngɔmbɛ-mobali na ndako na yo te,+

      Nakozwa bantaba-mibali na mapango na yo te.

      10 Mpo nyama nyonso ya zamba oyo ezali na zamba ezali ya ngai,+

      Banyama likoló ya bangomba nkóto (1 000).+

      11 Nayebi malamu ekelamu nyonso ya mapapu oyo ezalaka na bangomba,+

      Mpe ebele ya banyama ya esobe ezali ya ngai.+

      12 Soki nazalaka na nzala, nalingaki koyebisa yo yango te;

      Mpo mabele oyo ebotaka+ mpe nyonso oyo etondani na kati na yango ezali ya ngai.+

      13 Nakolya nde mosuni ya bangɔmbɛ-mibali ya makasi,+

      Mpe nakomɛla nde makila ya bantaba-mibali?+

      14 Pesá Nzambe matɔndi, yango nde mbeka na yo,+

      Mpe kokisá bilako na yo epai ya Oyo-Aleki-Likoló;+

      15 Mpe bengá ngai na mokolo ya mpasi.+

      Ngai nakobikisa yo, mpe yo okopesa ngai nkembo.”+

      16 Kasi Nzambe akoloba na moto mabe ete:+

      “Lotomo nini ozali na yango mpo otánga malako na ngai,+

      Mpe omema kondimana na ngai na monɔkɔ na yo?+

      17 Ɛɛ, yo​—yo oyini disiplini,+

      Mpe ozali kaka kobwaka maloba na ngai nsima na yo.+

      18 Ntango nyonso oyo omonaki moyibi, ozalaki kutu kosepela na ye;+

      Mpe osalaki boninga na bato ya ekobo.+

      19 Ofungoli monɔkɔ na yo polele mpo na kobimisa makambo ya mabe,+

      Mpe ozali kaka kokangisa lolemo na yo na bokosi.+

      20 Ozali kofanda mpe ozali koloba mabe na ndeko na yo mpenza,+

      Ozali kobimisa libunga ya mwana mobali ya mama na yo.+

      21 Makambo wana osali yango, mpe ngai nafandaki kaka nyɛɛ.+

      Okanisaki ete ngai nakokóma mpenza lokola yo.+

      Nakopamela yo,+ mpe nakotya makambo na molɔngɔ na miso na yo.+

      22 Nabondeli bino, bókanga ntina ya likambo oyo, bino baoyo bobosanaka Nzambe,+

      Noki napasolapasola bino mpe moto oyo akobikisa bino akozala te.+

      23 Moto oyo azali kopesa matɔndi mpo ezala mbeka na ye, ye nde moto azali kopesa ngai nkembo;+

      Mpe moto oyo azali kolanda nzela oyo etyami,

      Ngai nakomonisa ye lobiko ya Nzambe.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto