Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 49:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Bongo alobaki boye: “Ezali mpenza likambo ya mpamba te ndenge okómi mosaleli na ngai mpo otɛlɛmisa mabota ya Yakobo mpe mpo ozongisa ata bato ya Yisraele oyo babatelami;+ mpe napesi yo mpo ozala pole ya bikólo,+ mpo lobiko na ngai ekóma tii na nsuka ya mabele.”+

  • Misala 13:47
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 47 Kutu, Yehova apesi biso mitindo na maloba oyo: ‘Natye yo lokola pole ya bikólo,+ mpo ozala lobiko tii na nsuka ya mabele.’”+

  • Misala 28:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Na yango, eyebana epai na bino ete eloko yango, mwango oyo Nzambe azali kobikisa na yango, esili kotindama epai ya bikólo;+ bango bakoyoka yango mpenza.”+

  • Baroma 10:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Nzokande nazali kotuna: Bayokaki, boye te? Ɛɛ, ya solo, “lokito na bango eyokani na mabele mobimba,+ mpe maloba na bango kino na nsuka ya mabele esika bato bafandi.”+

  • Bakolose 1:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 soki, ya solo, botikali na kondima,+ botɛlɛmi makasi likoló ya moboko+ mpe bopikami+ mpe bozali koningana te na elikya ya nsango malamu wana oyo boyokaki,+ mpe oyo esakolamaki+ na bato ya bikólo nyonso+ oyo ezali na nse ya lola. Ngai Paulo nakómá mosaleli+ ya nsango malamu yango.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto