Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mitángo 10:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 “Mpe na mokolo ya esengo+ na bino mpe na bileko+ na bino ya fɛti mpe na ebandeli nyonso ya basanza+ na bino, bosengeli koyula bakelelo likoló ya makabo na bino ya kotumba+ mpe bambeka na bino ya boyokani;+ mpe ndenge ya kosalela bakelelo esengeli kozala ekaniseli mpo na bino liboso ya Nzambe na bino. Ngai nazali Yehova Nzambe na bino.”+

  • 1 Ntango 15:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Bongo Bayisraele nyonso bazalaki komatisa sanduku ya kondimana ya Yehova na koganga ya esengo+ mpe na lokito ya liseke,+ na bakelelo+ mpe na basɛmbalɛ,+ bazalaki kobɛta bibɛtɛlo ya bansinga makasi mpe na banzɛnzɛ.+

  • 2 Ntango 29:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Na nsima, Hizikiya alobaki bápesa mbeka ya kotumba likoló ya etumbelo; mpe ntango mbeka ya kotumba ebandaki, loyembo+ ya Yehova ebandaki, na bakelelo mpe, ɛɛ, na kolanda bibɛtɛlo ya Davidi mokonzi ya Yisraele.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto