Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 7:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Osengeli te koyoka bango nsɔmɔ, mpo Yehova Nzambe na yo azali na kati na yo,+ Nzambe moko monene mpe ya nsɔmɔ.+

  • Kolimbola Mibeko 28:58
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 58 “Soki okokeba te mpo na kokokisa maloba nyonso ya mobeko oyo, oyo ekomami na buku+ oyo, mpo na kobanga nkombo oyo ya nkembo+ mpe ya nsɔmɔ,+ ɛɛ Yehova,+ Nzambe na yo,

  • Nehemia 9:32
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 32 “Mpe sikoyo, Ee Nzambe na biso, Nzambe monene,+ ya nguya+ mpe ya nsɔmɔ,+ yo oyo obatelaka kondimana+ mpe motema boboto,+ kotika te ete bampasi nyonso oyo ezwi biso,+ bakonzi+ na biso, bankumu+ na biso, banganga-nzambe+ na biso, basakoli+ na biso, bankɔkɔ+ na biso ná bato na yo nyonso banda na mikolo ya bakonzi ya Asiri tii na mokolo ya lelo,+ emonana eloko moke liboso na yo.+

  • Nzembo 8:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Ee Yehova Nkolo na biso, nkombo na yo ezali mpenza monene na mabele mobimba,+

      Yo oyo lokumu ezali kolobelama kuna na likoló!+

  • Nzembo 66:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  3 Bóloba na Nzambe ete: “Misala na yo ezali mpenza nsɔmɔ!+

      Lokola ozali na makasi mingi, banguna na yo bakoya kogumbamela yo na kobanga.+

  • Nzembo 148:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Básanzola nkombo ya Yehova,+

      Mpo nkombo na ye yango moko ezali likoló mpenza koleka nyonso.+

      Lokumu na ye eleki mabele mpe likoló.+

  • Yisaya 29:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 mpo ntango akomona bana na ye, mosala ya mabɔkɔ na ngai, na katikati na ye,+ bakosantisa nkombo na ngai,+ mpe bakosantisa mpenza Mosantu ya Yakobo,+ mpe bakotala Nzambe ya Yisraele na nsɔmɔ.+

  • Emoniseli 15:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Nani akobanga mpenza yo te,+ Yehova,+ mpe akopesa nkombo na yo nkembo te,+ mpo kaka yo moko nde ozali sembo?+ Mpo bikólo nyonso bakoya kosambela liboso na yo,+ mpo boyengebene ya mibeko na yo emonani polele.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto