Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 32:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Balongwe nokinoki na nzela oyo napesaki bango mitindo ete bátambola na yango.+ Bamisaleli ekeko ya mwana-ngɔmbɛ na ebende oyo banyangwisi mpe bazali kaka kogumbamela yango mpe kopesa yango mbeka mpe koloba ete: ‘Talá Nzambe na yo, Ee Yisraele, oyo akambaki yo mpe abimisaki yo na mokili ya Ezipito.’”+

  • 1 Samwele 12:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Bongo Samwele alobaki na bato boye: “Bóbanga te.+ Bino, bosali mabe oyo nyonso. Kaka nde bópɛngwa te, bótika kolanda Yehova te,+ mpe bosengeli kosalela Yehova na motema na bino mobimba.+

  • Nzembo 97:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Ee bino baoyo bolingaka Yehova,+ bóyina oyo ezali mabe.+

      Ye abatelaka milimo ya bato na ye ya sembo;+

      Abikisaka bango na lobɔkɔ ya bato mabe.+

  • Nzembo 119:128
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 128 Yango wana namoni ete bitinda nyonso oyo etali biloko nyonso ebongi;+

      Nayini nzela nyonso ya lokuta.+

  • Masese 8:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Kobanga Yehova elakisi koyina mabe.+ Komikumisa ná lolendo,+ nzela mabe ná monɔkɔ oyo elobaka makambo ya kilikili,+ nayiná yango.

  • Masese 13:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Moyengebene ayinaka liloba ya lokuta,+ kasi bato mabe basalaka makambo ya nsɔni mpe bamisambwisaka.+

  • Sefania 1:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 ná baoyo bazali kozonga nsima mpe kotika kolanda Yehova,+ oyo baluki Yehova te mpe batuni ye te.”+

  • Baroma 12:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Bolingo+ na bino ezala na bokosi te.+ Bóyina oyo ezali mabe,+ bókangama na oyo ezali malamu.+

  • Baebre 1:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Olingaki boyengebene, mpe oyinaki makambo ya kobuka mibeko. Yango wana Nzambe, Nzambe na yo, atye yo mafuta+ ya esengo koleka baninga na yo.”+

  • Baebre 10:38
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 38 “Kasi moyengebene na ngai akozala na bomoi mpo na kondima,”+ mpe, “soki azongi nsima, molimo na ngai ekosepela na ye te.”+

  • 2 Petro 2:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Mpo elingaki kozala malamu koleka soki báyebaka mpenza nzela ya boyengebene te+ na esika ete báyeba yango mpenza bongo na nsima bápesa mokɔngɔ na mobeko mosantu oyo bapesaki bango.+

  • Yuda 23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 bóbikisa bango+ mpe bólongola bango na mɔtɔ.+ Kasi bókoba komonisela bamosusu motema mawa, bósala bongo na kobanga, wana bozali koyina ata elamba ya kati, oyo nzoto etye litɔnɔ.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto