Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 4:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 “Soki kuna boluki Yehova Nzambe na yo, okomona mpenza ye,+ mpamba te okoluka ye na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba.+

  • 1 Bakonzi 8:48
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 48 mpe soki bazongeli yo mpenza na motema na bango mobimba+ mpe na molimo na bango mobimba na mokili ya banguna na bango oyo bamemaki bango bakangami, mpe babondeli yo mpenza, wana batali na ngámbo ya mokili na bango oyo opesaki bankɔkɔ na bango, engumba oyo oponá mpe ndako oyo natongeli nkombo na yo;+

  • 1 Ntango 22:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Sikoyo, bótya motema na bino mpe molimo+ na bino mpo na koluka Yehova Nzambe na bino,+ mpe bótɛlɛma mpe bótonga esika mosantu+ ya Yehova Nzambe ya solo,+ mpo na komema sanduku+ ya kondimana ya Yehova mpe bisaleli mosantu ya Nzambe ya solo na ndako oyo batongeli nkombo+ ya Yehova.”

  • 2 Ntango 31:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Mpe na mosala nyonso oyo abandaki kosala na mosala+ ya ndako ya Nzambe ya solo, na kati ya mobeko+ mpe na kati ya mitindo, mpo na koluka+ Nzambe na ye, asalaki yango na motema na ye mobimba,+ mpe alongaki.+

  • Yirimia 29:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 “‘Mpe bokoluka ngai mpe bokozwa ngai,+ mpo bokoluka ngai na motema na bino mobimba.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto