2 Samwele 22:28 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 28 Mpe okobikisa bato ya komikitisa;+Kasi miso na yo etɛmɛli bato ya lolendo mpo okitisa bango.+ Nzembo 10:4 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 4 Moto mabe na lolendo na ye alukalukaka te;+Makanisi na ye nyonso ezali kaka: “Nzambe azali te.”+ Nzembo 18:27 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 27 Mpo yo moko okobikisa bato ya mpasi;+Kasi okokitisa miso ya lolendo.+ Nzembo 101:5 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 5 Moto nyonso oyo azali kokosela moninga na ye makambo na nkuku,+Nakangisaka ye monɔkɔ.+Moto nyonso oyo azali na miso ya lolendo mpe na motema ya lofundo,+Nakoki kolinga ye te.+ Masese 6:17 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 17 miso ya lolendo,+ lolemo ya lokuta+ mpe mabɔkɔ oyo ezali kosopa makila ya moto oyo azali na likambo te,+ Masese 14:3 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 3 Fimbo ya lolendo ezali na monɔkɔ ya zoba,+ kasi mbɛbu ya bato ya bwanya ekokɛngɛla bango.+ Yisaya 2:11 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 11 Miso ya lolendo ya moto ya mabele ekokita mpenza na nse, mpe lofundo ya bato ekogumbama;+ mpe Yehova ye moko akotombwama mpenza na mokolo yango.+ Luka 18:14 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 14 Nazali koyebisa bino ete: Moto oyo akitaki na ndako na ye amonani moyengebene+ koleka moto wana mosusu; mpo moto nyonso oyo azali komitombola akoyokisama nsɔni, kasi moto oyo azali komikitisa akotombwama.”+ 1 Petro 5:5 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 5 Ndenge moko mpe, bino bilenge, bómikitisaka+ liboso ya mikóló. Nzokande bino nyonso bólata ezaleli ya komikitisa na kati na bino,+ mpo Nzambe atɛmɛlaka bato ya lolendo, kasi amoniselaka bato ya komikitisa boboto monene.+
5 Moto nyonso oyo azali kokosela moninga na ye makambo na nkuku,+Nakangisaka ye monɔkɔ.+Moto nyonso oyo azali na miso ya lolendo mpe na motema ya lofundo,+Nakoki kolinga ye te.+
17 miso ya lolendo,+ lolemo ya lokuta+ mpe mabɔkɔ oyo ezali kosopa makila ya moto oyo azali na likambo te,+
11 Miso ya lolendo ya moto ya mabele ekokita mpenza na nse, mpe lofundo ya bato ekogumbama;+ mpe Yehova ye moko akotombwama mpenza na mokolo yango.+
14 Nazali koyebisa bino ete: Moto oyo akitaki na ndako na ye amonani moyengebene+ koleka moto wana mosusu; mpo moto nyonso oyo azali komitombola akoyokisama nsɔni, kasi moto oyo azali komikitisa akotombwama.”+
5 Ndenge moko mpe, bino bilenge, bómikitisaka+ liboso ya mikóló. Nzokande bino nyonso bólata ezaleli ya komikitisa na kati na bino,+ mpo Nzambe atɛmɛlaka bato ya lolendo, kasi amoniselaka bato ya komikitisa boboto monene.+