Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 16:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Mpe moko ya basaleli yango ayanolaki mpe alobaki boye: “Talá! Namoni ete mwana mobali moko ya Yese moto ya Beteleme ayebi kobɛta nzɛnzɛ malamu,+ azali elombe, moto ya nguya,+ moto ya etumba,+ ayebi koloba,+ mobali moko kitoko,+ mpe Yehova azali na ye.”+

  • 2 Samwele 16:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Mpe toli ya Ahitofele, oyo azalaki kopesa na mikolo yango, ezalaki kaka lokola ntango moto atuni liloba ya Nzambe ya solo. Toli+ ya Ahitofele+ ezalaki bongo ezala epai ya Davidi, to epai ya Abisalome.

  • 1 Bakonzi 7:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Azalaki mwana ya mwasi moko na libota ya Nafatali oyo mobali akufá, mpe tata na ye azalaki moto ya Tire,+ mosali ya biloko ya motako;+ mpe atondaki na bwanya, na mayele+ mpe na boyebi ya kosala misala ya lolenge nyonso na motako. Na yango, ayaki epai ya Mokonzi Salomo mpe abandaki kosala mosala na ye nyonso.

  • Danyele 1:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Mpe mokonzi abandaki kosolola na bango, mpe na kati na bango nyonso, ata moko te amonanaki lokola Danyele, Hanania, Mishaele ná Azaria;+ mpe bakobaki kotɛlɛma liboso ya mokonzi.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto