Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 22:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Na yango, mokonzi alobaki na bapoti-mbangu+ oyo batɛlɛmaki pene na ye ete: “Bóbaluka mpe bóboma banganga-nzambe ya Yehova, mpo lobɔkɔ na bango mpe ezali elongo na Davidi mpe mpo bayebaki ete azali kokima, kasi bayebisaki ngai yango na litoi te!”+ Kasi basaleli ya mokonzi baboyaki kosembola lobɔkɔ na bango mpo na kokwela banganga-nzambe ya Yehova.+

  • Masese 29:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Ntango bayengebene bakómi mingi, bato basepelaka;+ kasi ntango moto mabe azali koyangela, bato bamilelaka.+

  • Sefania 3:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Bankumu na yango na kati na yango bazalaki bankɔsi oyo ezali koganga.+ Basambisi na yango bazalaki bambwa ya zamba ya mpokwa oyo bazalaki kobuka mikuwa liboso ntɔngɔ etana.+

  • Matai 2:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Bongo ntango Erode amonaki ete banganga-minzoto bakosaki ye, ayokaki nkanda makasi mpenza, mpe atindaki báboma bana mibali nyonso na Beteleme mpe na bitúká na yango nyonso, banda na mbula mibale mpe na nse na yango, na kotalela ntango oyo monzoto ebimaki, ndenge banganga-minzoto bayebisaki ye.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto