Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Ntango 28:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Na nsima, bato oyo batángamaki na nkombo na bango+ batɛlɛmaki mpe bazwaki bakangami, mpe bato na bango nyonso oyo bazalaki bolumbu, balatisaki bango bilamba oyo euti na biloko epunzami. Bongo balatisaki bango bilamba+ mpe bapesaki bango basandale mpe baleisaki bango+ mpe bapesaki bango eloko ya komɛla+ mpe bapakolaki bango mafuta. Lisusu, mpo na bato nyonso oyo bazalaki kotengatenga, batyaki+ bango na bampunda mpe bamemaki bango na Yeriko,+ engumba ya banzete ya mbila,+ pene na bandeko na bango. Nsima na yango, bazongaki na Samaria.+

  • Ezekiele 18:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 mpe soki anyokolaki moto te;+ soki azongisaki ndanga oyo azwaki mpo na nyongo;+ soki abɔtɔlaki eloko moko te na makasi na ndenge ya moyibi;+ soki apesaki limpa na ye na moto oyo azalaki na nzala+ mpe soki azipaki moto oyo azalaki bolumbu elamba;+

  • Matai 25:36
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 36 nazalaki bolumbu,+ mpe bolatisaki ngai. Nazalaki na maladi mpe bosalisaki ngai. Nazalaki na bolɔkɔ+ mpe boyaki kotala ngai.’

  • Yakobo 2:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Soki ndeko mobali moko to ndeko mwasi moko azali bolumbu mpe azangi bilei oyo ekoki mpo na mokolo,+

  • 1 Yoane 3:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Kasi moto nyonso oyo azali na biloko ya kobikela ya mokili oyo+ mpe amoni ndeko na ye azali kokelela+ mpe atako bongo akangeli ye mpenza motema,*+ ndenge nini bolingo ya Nzambe ekoki kofanda na kati na ye?+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto