10 Nabondeli yo, tósala mwa shambrɛ ya likoló,+ na efelo, mpe tótyela ye mbeto, mesa, kiti ná etɛlɛmiselo ya miinda;+ mpe ekosalema mpenza boye: ntango nyonso oyo akoya epai na biso, akoki kokɔta kuna.”+
15 Nzokande ntango ye ná bato ya ndako na ye babatisamaki,+ abondelaki bango alobi ete: “Soki bomoni mpenza ete nazali moto ya sembo na miso ya Yehova, bókɔta na ndako na ngai mpe bófanda.”+ Mpe atyaki biso mbamba tóndima kaka.+