8Bongo mibali ya Efraime balobaki na ye boye: “Oyo likambo nini osali biso, obengi biso te ntango okei kobunda na Midiane?”+ Mpe balukaki koswanisa ye makasi.+
12Na nsima, mibali ya Efraime babengamaki mpe bakatisaki na nɔrdi mpe balobaki na Yefeta boye: “Mpo na nini okatisaki mpo na kobunda na bana ya Amone, kasi obengisaki biso te tókende na yo?+ Tokotumba ndako na yo na mɔtɔ, ná yo na kati.”+