-
Yisaya 66:3Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
3 “Moto oyo azali koboma ngɔmbɛ azali lokola moto oyo azali koboma moto.+ Moto oyo azali kopesa mbeka ya mpate azali lokola moto oyo azali kobuka nkingo ya mbwa.+ Moto oyo azali kopesa likabo—lokola moto oyo azali kopesa makila ya ngulu!+ Moto oyo azali kotumba olibana+ ya ekaniseli azali lokola moto oyo azali kopambola na maloba ya maji.+ Bazali mpe bato oyo baponá banzela na bango moko, mpe molimo na bango esepeli na biloko na bango ya bosɔtɔ.+
-
-
Matai 23:23Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
23 “Mawa na bino, bakomeli ná Bafarisai, bakosi! mpamba te bopesaka moko ya bandambo zomi+ ya manti mpe ya aneti, mpe ya kumini,* kasi botyoli makambo ya Mibeko oyo ezali na ntina mingi, elingi koloba, bosembo+ ná motema mawa+ ná kondima.+ Bosengelaki kosala nde makambo oyo mpe kobosana te kosala makambo wana mosusu.
-