1 Samwele 15:22 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 22 Bongo Samwele alobaki boye: “Yehova asepelaka nde na makabo ya kotumba+ mpe na bambeka koleka kotosa mongongo ya Yehova? Talá! Kotosa+ eleki mbeka,+ kotya likebi eleki mafuta+ ya bampate-mibali; Nzembo 40:6 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 6 Osepelaki na mbeka mpe na likabo te;+Ofungolaki matoi na ngai.+Osɛngaki te likabo ya kotumba mpe likabo mpo na lisumu.+ Nzembo 51:16 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 16 Mpo yo ozali kosepela na mbeka te—soki osepelaka na yango, nalingaki kopesa yango;+Yo ozali kosepela te na likabo ya kotumba mobimba.+ Masese 15:8 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 8 Mbeka ya bato mabe ezali eloko oyo Yehova ayiná,+ kasi libondeli ya bato ya kolongobana esepelisaka ye.+ Matai 9:13 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 13 Boye bókende koyekola ntina ya maloba oyo: ‘Nalingi motema mawa, kasi mbeka te.’+ Mpo nayaki kobenga bayengebene te, kasi basumuki.”
22 Bongo Samwele alobaki boye: “Yehova asepelaka nde na makabo ya kotumba+ mpe na bambeka koleka kotosa mongongo ya Yehova? Talá! Kotosa+ eleki mbeka,+ kotya likebi eleki mafuta+ ya bampate-mibali;
6 Osepelaki na mbeka mpe na likabo te;+Ofungolaki matoi na ngai.+Osɛngaki te likabo ya kotumba mpe likabo mpo na lisumu.+
16 Mpo yo ozali kosepela na mbeka te—soki osepelaka na yango, nalingaki kopesa yango;+Yo ozali kosepela te na likabo ya kotumba mobimba.+
8 Mbeka ya bato mabe ezali eloko oyo Yehova ayiná,+ kasi libondeli ya bato ya kolongobana esepelisaka ye.+
13 Boye bókende koyekola ntina ya maloba oyo: ‘Nalingi motema mawa, kasi mbeka te.’+ Mpo nayaki kobenga bayengebene te, kasi basumuki.”