Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 2:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Soki moto asaleli moto mosusu lisumu,+ Nzambe akokatela ye likambo;+ kasi soki moto asaleli nde Yehova lisumu,+ nani akobondela mpo na ye?”+ Kasi bango bazalaki koyoka mongongo ya tata na bango te,+ mpo sikoyo, Yehova amonaki malamu aboma bango.+

  • 1 Samwele 8:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Nde bana na ye batambolaki na banzela na ye te,+ kasi bazalaki kolinga kolanda litomba oyo ezwami na ndenge ya mabe+ mpe bazalaki kondima kanyaka+ mpe kopɛngwisa lisambisi.+

  • 2 Samwele 15:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Na mbala moko, Davidi alobaki na basaleli na ye nyonso oyo bazalaki elongo na ye na Yerusaleme ete: “Bótɛlɛma, tókima;+ noki tózanga nzela ya kokima Abisalome! Bókende mbangu, noki ye aya mbangu mpe akuta biso, bongo amemela biso mabe mpe abɛta engumba na mopanga!”+

  • Masese 10:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Masese ya Salomo.+

      Mwana ya bwanya nde oyo asepelisaka tata,+ mpe mwana ya zoba azali mpasi mpo na mama na ye.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto