Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Bakonzi 4:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Yuda mpe Yisraele bazalaki mingi, lokola bambuma ya zɛlo oyo ezali pembenipembeni ya mbu, mpo ezali ebele;+ bazalaki kolya, komɛla mpe kosepela.+

  • Mosakoli 2:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Eloko oyo eleki malamu mpo na moto ezali te, longola kaka kolya mpe komɛla mpenza mpe komonisa molimo na ye bolamu mpo na mosala na ye ya makasi.+ Yango mpe namoni, ɛɛ ngai, ete euti na lobɔkɔ ya Nzambe ya solo.+

  • Mosakoli 3:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 mpe lisusu ete moto nyonso alya mpe amɛla mpenza mpe amona bolamu mpo na mosala na ye nyonso ya makasi.+ Ezali likabo ya Nzambe.+

  • Mosakoli 3:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Mpe namoni ete eloko oyo eleki malamu ezali te, longola kaka ete moto asepela na misala na ye,+ mpo yango nde mbano na ye; mpamba te nani akozongisa ye mpo atala oyo ekozala nsima na ye?+

  • Yisaya 65:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Bakotonga mpo moto mosusu afandaka kuna te; bakolona mpo moto mosusu alya te. Mpo mikolo ya bato na ngai ekozala lokola mikolo ya nzete;+ mpe bato oyo naponi bakozwa mpenza litomba na mosala ya mabɔkɔ na bango.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto