Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 12:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Kasi liboso ya Yehova Nzambe na yo nde okolya yango, na esika oyo Yehova Nzambe na yo akopona,+ yo ná mwana na yo ya mobali ná mwana na yo ya mwasi ná moombo na yo ya mobali ná moombo na yo ya mwasi mpe Molevi oyo azali na kati ya baporte na yo; mpe osengeli kosepela+ liboso ya Yehova Nzambe na yo na misala na yo nyonso.

  • Kolimbola Mibeko 20:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpe moto nani aloni elanga ya vinyo mpe abandi naino kolya mbuma na yango te? Akende mpe azonga na ndako na ye, noki akufa na etumba mpe moto mosusu abanda kolya mbuma na yango.+

  • Mosakoli 3:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Mpe namoni ete eloko oyo eleki malamu ezali te, longola kaka ete moto asepela na misala na ye,+ mpo yango nde mbano na ye; mpamba te nani akozongisa ye mpo atala oyo ekozala nsima na ye?+

  • Mosakoli 5:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Talá! Eloko ya malamu koleka oyo ngai namoni, oyo ezali kitoko, ezali nde ete moto alya mpe amɛla mpe amona bolamu mpo na mosala na ye makasi+ oyo azali kosala yango makasi na nse ya moi mpo na mikolo nyonso ya bomoi na ye oyo Nzambe ya solo apesi ye, mpo yango nde mbano na ye.

  • Mosakoli 8:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Mpe ngai nakumisaki esengo,+ mpo bato bazali na eloko moko te na nse ya moi oyo eleki kolya ná komɛla ná kosepela, mpe yango ezala elongo na bango na mosala na bango ya makasi mpo na mikolo ya bomoi na bango,+ oyo Nzambe ya solo apesi bango na nse ya moi.+

  • Misala 14:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 atako amitikaki mpenza te kozanga litatoli, ndenge asaleli bino bolamu,+ ndenge apesaka bino bambula+ uta na likoló mpe bileko ya kobota mbuma, ndenge atondisaka mitema na bino mɛkɛ na biloko ya kolya mpe na nsai.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto