Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 4:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Nsima na yango Kaina alobaki na ndeko na ye Abele ete: “Yaká tókende na bilanga.” Na bongo, esalemaki boye: ntango bazalaki na bilanga, Kaina akwelaki ndeko na ye Abele mpe abomaki ye.+

  • 1 Samwele 22:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Nsukansuka, mokonzi alobaki na Doege+ boye: “Yo, baluká mpe kwelá banganga-nzambe!” Na mbala moko, Doege Moedome+ abalukaki mpe ye moko akwelaki banganga-nzambe mpe na mokolo yango, abomaki+ mibali ntuku mwambe na mitano (85) oyo balati efode+ ya lini.

  • Matai 23:34
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 34 Yango wana, talá nazali kotindela+ bino basakoli mpe bato ya bwanya mpe balakisi ya bato.+ Bokoboma bamosusu+ mpe bokobaka bamosusu na nzete, mpe bokobɛta bamosusu fimbo+ na basinagoga na bino mpe bokonyokola bango na engumba na engumba;

  • Yoane 16:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Bakobengana bino na sinagoga.+ Kutu, ngonga ezali koya wana moto nyonso oyo akoboma bino akokanisa ete asaleli Nzambe mosala mosantu.+

  • 1 Petro 4:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Bandeko ya bolingo, bómitungisa te mpo na mɔtɔ oyo ezali na kati na bino, oyo ezali kopela mpo na komeka bino,+ lokola nde likambo ya kokamwa ezali kokwela bino.

  • 1 Petro 5:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Kasi, nsima ya konyokwama mwa ntango moke,+ Nzambe ya boboto monene nyonso, oyo abengaki bino na nkembo+ na ye ya seko na bomoko+ na Kristo, ye moko akosilisa kobongisa bino, akotɛlɛmisa bino ngwi,+ akokómisa bino makasi.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto